‏ 2 Chronicles 4:19-22

19Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe : etumbelo ; bamesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; 20bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mpo na kopela liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, 21bafololo na yango, minda na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, basala na wolo ya peto makasi ; 22bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.
Copyright information for LinMNB