‏ 2 Kings 9:27-29

27Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! »

Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna.
28Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi. 29Akazia akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Yorami, mwana mobali ya Akabi.
Copyright information for LinMNB