‏ 2 Samuel 8:15-18

Bakalaka ya Davidi

(1Ma 18.14-17)

15Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima. 16Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ; 17Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ; 18Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.
Copyright information for LinMNB