Ecclesiastes 5
Kokisaka ndayi na yo epai ya Nzambe
1 ▼▼5:2 in most Bibles.
Kowelela te kofungola monoko na yo,mpe tika ete motema na yo ewelela te
kobimisa liloba liboso ya Nzambe !
Pamba te Nzambe azali na likolo,
mpe yo ozali na mabele.
Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te !
2 ▼
▼5:3 in most Bibles.
Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi,ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.
3 ▼
▼5:4 in most Bibles.
Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe,kowumela te mpo na kokokisa yango ;
pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ;
kokisa ndayi na yo.
4 ▼
▼5:5 in most Bibles.
Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango. 5 ▼▼5:6 in most Bibles.
Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ? 6 ▼▼5:7 in most Bibles.
Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe. Bomengo ezali pamba
7 ▼▼5:8 in most Bibles.
Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi. 8 ▼▼5:9 in most Bibles.
Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga. 9 ▼▼5:10 in most Bibles.
Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba. 10 ▼▼5:11 in most Bibles.
Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele,ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele ;
bongo litomba nini nkolo na yango akozwa,
soki kaka te komona yango na miso ?
11 ▼
▼5:12 in most Bibles.
Pongi ya mosali ezalaka ya kimia,ata soki alie moke to mingi ;
kasi bomengo ya mozwi ezangisaka ye pongi.
12 ▼
▼5:13 in most Bibles.
Namoni mabe moko na se ya moyi,epesaka penza mawa :
moto abombi bomengo na ye,
kasi ememeli ye pasi ;
13 ▼
▼5:14 in most Bibles.
likambo moko ya mabe ya mbalakataebebisi bomengo yango,
mpe mwana na ye azangi libula ya kokitana na yango.
14 ▼
▼5:15 in most Bibles.
Ndenge abotamaki bolumbuwuta na libumu ya mama na ye,
ndenge mpe akozanga bolumbu,
akomema ata mbuma moko te ya mosala na ye.
15 ▼
▼5:16 in most Bibles.
Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa :ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga.
Bongo litomba na ye ezali nini ?
Asali kaka mpo na mopepe ?
16 ▼
▼5:17 in most Bibles.
Alekisi mikolo nyonso ya bomoi na ye kati na molili,na pasi, na komitungisa mpe na kanda.
17 ▼
▼5:18 in most Bibles.
Mpo na yango, tala likambooyo ngai namoni ete ezali malamu :
ebongi na moto kolia, komela
mpe kosepela na mbuma ya mosala na ye na se ya moyi,
na mikolo ya bomoi oyo Nzambe apesi ye,
pamba te yango nde libula na ye.
18 ▼
▼5:19 in most Bibles.
Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe ! 19 ▼▼5:20 in most Bibles.
Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.
Copyright information for
LinMNB