Isaiah 9
1 ▼▼9:2 in most Bibles.
Bato oyo bazalaki kotambola kati na molilibamoni pole makasi ;
ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,
pole engengeli bango.
2 ▼
▼9:3 in most Bibles.
Okomisaki bango ekolo monene,obakisaki esengo na bango.
Bazali kosepela liboso na Yo
ndenge basepelaka tango babukaka milona,
ndenge mibali basepelaka
tango bakabolaka bomengo ya bitumba.
3 ▼
▼9:4 in most Bibles.
Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango,nzete oyo ezalaki na mapeka na bango
mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango,
Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.
4 ▼
▼9:5 in most Bibles.
Basapato nyonso ya basodaoyo lokito na yango eningisaka mabele,
mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila,
ekobwakama na moto
mpo ete ezika makasi.
5 ▼
▼9:6 in most Bibles.
Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso,mwana mobali moko apesameli biso,
mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ;
bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya,
Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
6 ▼
▼9:7 in most Bibles.
Bokonzi na ye ekokende mosika penza,mpe kimia na ye ekozala na suka te.
Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,
akozala mokonzi ya mokili na ye,
akolendisa mpe akokamba yango
na bosembo mpe na boyengebene,
wuta na tango oyo kino libela na libela.
Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akosala na bolingo makasi na Ye.
Kanda ya Yawe mpo na Isalaele
7 ▼▼9:8 in most Bibles.
Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi,mpe liloba yango ekomeli Isalaele.
8 ▼
▼9:9 in most Bibles.
Bato nyonso bakoyeba yango,Efrayimi mpe bavandi ya Samari,
oyo balobaka na lofundu mpe na lolendo ya mitema :
9 ▼
▼9:10 in most Bibles.
« Ata babiliki ekweyi,tokotonga lisusu na mabanga bakata ;
ata bakati banzete ya sikomori,
tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »
10 ▼
▼9:11 in most Bibles.
Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsinimpo na kobundisa bango
mpe apelisaki mitema ya banguna na bango
mpo ete batombokela bango.
11 ▼
▼9:12 in most Bibles.
Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima,bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso.
Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te,
loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
12 ▼
▼9:13 in most Bibles.
Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka teepai na Yawe oyo abetaki bango,
mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga.
13 ▼
▼9:14 in most Bibles.
Yango wana, kaka na mokolo moko,Yawe akokata, kati na Isalaele,
moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.
14 ▼
▼9:15 in most Bibles.
Bampaka mpe bato ya lokumu, bango nde moto ;mpe basakoli ya lokuta, bango nde mokila.
15 ▼
▼9:16 in most Bibles.
Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela,mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana.
16 ▼
▼9:17 in most Bibles.
Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te,akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te,
pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe,
bazali kosala mabe,
mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba.
Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te,
loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
17 ▼
▼9:18 in most Bibles.
Solo, mabe etumbaka lokola motooyo ezikisaka basende mpe banzube,
ezikisaka bazamba minene
mpe ematisaka makonzi ya milinga.
18 ▼
▼9:19 in most Bibles.
Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga,mokili eziki na moto,
mpe bato bakomi lokola mafuta na moto.
Moto moko te akobikisa ndeko na ye.
19 ▼
▼9:20 in most Bibles.
Na ngambo ya loboko ya mobali,bakobotola bato biloko,
kasi bato bakozala kaka na nzala ;
na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia,
kasi bato bakotonda kaka te ;
moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye :
20 ▼
▼9:21 in most Bibles.
Manase akolia Efrayimi,mpe Efrayimi akolia Manase ;
bango mibale bakosangana mpe bakobalukela Yuda.
Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te,
loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
Copyright information for
LinMNB