Job 40
Eyano ya liboso ya Yobo epai ya Nzambe
1Yawe ayanolaki Yobo : 2« Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonsoakoki koteya Ye ?
Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
3Yobo azongiselaki Yawe : 4« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba,
eyano nini nakoki kopesa Yo ?
Natie loboko na ngai na monoko.
5Nalobaki mbala moko,
kasi nakoyanola lisusu te ;
na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »
Maloba ya mibale ya Nzambe
6Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi : 7« Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali ;nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai.
8Olingi kotiola bosembo na ngai ?
Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
9Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ?
Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?
10Lata nkembo mpe kongenga,
milatisa lokumu mpe monene !
11Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato,
tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo
mpe kitisa bango !
12Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni !
Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
13Kunda bango nyonso kati na putulu,
zipa bilongi na bango na esika ya kobombama.
14Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu,
pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo.
15Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo,
kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.
16Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango,
nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango !
17Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele ;
misisa ya mipende na yango elingama-lingama ;
18mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze ;
mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende.
19Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe,
kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene.
20Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia,
esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka.
21Elalaka na se ya banzete ya mike-mike,
na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
22Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango,
banzete ya pepiliye ezingeli yango.
23Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ;
ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko,
evandaka kaka kimia.
24Boni, moto akoki kokanga yango
na motambo na tango ezali kotala
to kotobola yango zolo na ndobo,
mpo na kobenda yango ?
25 ▼
▼41:1 in most Bibles.
Boni, okoki koloba ngando na ndobo ?Okoki kokanga lolemo na yango na singa ?
26 ▼
▼41:2 in most Bibles.
Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo ?Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo ?
27 ▼
▼41:3 in most Bibles.
Boni, ekobondela yo mingi ?Ekoloba na yo maloba ya boboto ?
28 ▼
▼41:4 in most Bibles.
Ekoki kosala boyokani elongo na yompo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela ?
29 ▼
▼41:5 in most Bibles.
Okoki kosakana na yango lokola ndeke ?Okoki kokanga yango na singa
mpo na kosepelisa bana na yo ya basi ?
30 ▼
▼41:6 in most Bibles.
Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo ?Bakoki kokabola yango epai ya bateki ?
31 ▼
▼41:7 in most Bibles.
Okoki kotobola mokongo na yango na makonga ?Okoki kotobola moto na yango na ndobo
oyo bakangelaka bambisi ?
32 ▼
▼41:8 in most Bibles.
Tia loboko na yo na likolo na yango :soki okanisi etumba oyo okutani na yango,
okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.
Copyright information for
LinMNB