‏ Job 41

1 ▼
▼41:9 in most Bibles.
Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba ;
soki kaka omoni yango, okweyi na somo.
2 ▼
▼41:10 in most Bibles.
Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango ;
boye nani akoki kotelemela ngai ?
3 ▼
▼41:11 in most Bibles.
Nani adefisaki ngai eloko
mpo ete nafuta niongo na ye ?
Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.

4 ▼
▼41:12 in most Bibles.
Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela
biteni na yango ya nzoto, makasi na yango
mpe kitoko ya nzoto na yango.
5 ▼
▼41:13 in most Bibles.
Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto ?
Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango ?
6 ▼
▼41:14 in most Bibles.
Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango ?
Minu na yango etonda na somo.
7 ▼
▼41:15 in most Bibles.
Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba,
ekangama elongo na ezipelo ya mabanga.
8 ▼
▼41:16 in most Bibles.
Ekangama moko na mosusu,
mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te.
9 ▼
▼41:17 in most Bibles.
Ekangama moko na mosusu,
esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te.
10 ▼
▼41:18 in most Bibles.
Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole ;
mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo.
11 ▼
▼41:19 in most Bibles.
Moto makasi mpe moto mike-mike
ebimaka na monoko na yango.
12 ▼
▼41:20 in most Bibles.
Milinga ebimaka na zolo na yango
lokola na mbeki oyo ezali kotoka
to lokola nzungu ya ebende ya moto.
13 ▼
▼41:21 in most Bibles.
Pema na yango epelisaka makala ya moto,
lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango.
14 ▼
▼41:22 in most Bibles.
Makasi na yango evandi na kingo na yango,
mpe somo ebimaka liboso na yango.
15 ▼
▼41:23 in most Bibles.
Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo,
elendisama makasi mpe eninganaka te.
16 ▼
▼41:24 in most Bibles.
Motema na yango ezali makasi lokola libanga,
makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma.
17 ▼
▼41:25 in most Bibles.
Soki etelemi, bato ya makasi babangaka,
mpe somo ekimisaka bango.
18 ▼
▼41:26 in most Bibles.
Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli,
ekosala yango eloko te.
19 ▼
▼41:27 in most Bibles.
Emonaka ebende lokola lititi,
bronze lokola nzete epola.
20 ▼
▼41:28 in most Bibles.
Mbanzi ekimisaka yango te,
mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga
ezali lokola poso ya loso mpo na yango.
21 ▼
▼41:29 in most Bibles.
Makonga ezali lokola matiti mpo na yango,
mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike.
22 ▼
▼41:30 in most Bibles.
Se ya libumu na yango etonda na banzube,
etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.
23 ▼
▼41:31 in most Bibles.
Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi
oyo ezali kotoka na nzungu,
ekomisaka ebale monene lokola nzungu
oyo batokiselaka malasi.
24 ▼
▼41:32 in most Bibles.
Engengisaka nzela na sima na yango
lokola suki ya pembe likolo ya mayi.
25 ▼
▼41:33 in most Bibles.
Na mokili, nyama moko te ekokani na yango ;
mpe ebangaka te.
26 ▼
▼41:34 in most Bibles.
Ebangaka te kobundisa banyama minene,
ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. »
Copyright information for LinMNB