John 12:12-16
Yesu akoti na Yelusalemi
(Mat 21.1-11; Mlk 11.1-11; Lk 19.28-40)
12Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi. 13Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga : « Ozana !Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo,
Mokonzi ya Isalaele ! »
14Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama : 15« Siona, engumba kitoko, kobanga te !
Tala, mokonzi na yo azali koya,
avandi na likolo ya mwana ya ane ! »
16Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
Copyright information for
LinMNB