John 13:36-38
Petelo awangani Yesu
(Mat 26.33-35; Mlk 14.29-31; Lk 22.31-34)
36Simona Petelo atunaki Yesu : — Nkolo, ozali kokende wapi ?Yesu azongiselaki ye : — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende ; okolanda Ngai sima.
37Petelo atunaki lisusu : — Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda Yo sik’oyo ? Nabongami kokufa mpo na Yo.
38Yesu azongiselaki ye : — Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
Copyright information for
LinMNB