‏ John 18:15-18

Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya liboso

(Mat 26.69-70; Mlk 14.66-68; Lk 22.55-57)

15Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 16Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo. 17Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo : — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ?

Petelo azongisaki : — Nazali moyekoli na ye te.

18Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
Copyright information for LinMNB