John 20:1-2
Yesu asekwi
(Mat 28.1-8; Mlk 16.1-4; Lk 24.1-2, 9-12)
1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda. 2Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango : — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi !
Copyright information for
LinMNB