‏ Luke 20:41-44

Eyano ya Yesu na tina na bomoto ya Klisto

(Mat 22.41-46; Mlk 12.35-37)

41Yesu mpe atunaki bango : — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ? 42Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo :
« Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
43 kino nakomisa banguna na Yo
enyatelo makolo na Yo. › »
44 Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
Copyright information for LinMNB