‏ Luke 23:1-5

Yesu liboso ya Pilato mpe Erode

(Mat 27.2, 11-14; Mlk 15.1-5; Yn 18.28-38)

1Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ; 2mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !

3Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?

Yesu azongisaki : — Olobi yango.

4Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.

5Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.
Copyright information for LinMNB