‏ Luke 23:44-49

44Pene-pene na ngonga midi, molili ezipaki mokili mobimba mpe yango ewumelaki kino na ngonga misato ya pokwa. 45Moi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Ndako ya Nzambe epasukaki na kati-kati. 46Bongo Yesu agangaki makasi penza :

—Tata, nazongisi molimo na ngai na maboko na yo ! Sima ya koloba maloba wana, akufaki.

47Tango mokonzi ya basoda ya Roma amonaki ndenge makambo yango esalamaki, akumisaki Nzambe mpe alobaki :

—Ya solo, moto oyo azalaki moto na sembo !

48Tango bato nyonso oyo basanganaki wana mpo na kotala ndenge makambo ekoleka, bamonaki makambo oyo ewutaki kosalama, bazongaki na mawa monene. 49Baoyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki ye banda na Galileya, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala makambo nyonso ndenge yango ezalaki kosalama.

Bakundi Yesu

(Mt. 27.57-61 ; Mk. 15.42-47 ; Jn. 19.38-42)

Copyright information for LinMNB