‏ Luke 23:50-55

50Moto moko kombo na ye Zozefi, azalaki moto ya likita ya Bayuda ; ye azalaki moto malamu mpe moto na sembo. 51Aboyaki mokano ya bampaka mosusu ya likita mpe makambo oyo basalaki. Azalaki moto ya Alimateo : vile ya Yudea, mpe azalaki kozela bokonzi ya Nzambe. 52Akendaki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato. 53Akitisaki yango na ekulusu, alingaki yango na dra ya lino, mpe atiaki yango na lilita moko oyo batimolaki na kati ya libanga ; mpe moto ata moko te naino akundamaki na yango. 54Ezalaki Mokolo ya komilengela, mpe saba elingaki kobanda. 55Basi oyo bayaki na Yesu wuta na Galileya balandaki Zozefi, batalaki lilita mpe bamonaki ndenge batiaki nzoto ya Yesu.
Copyright information for LinMNB