‏ Luke 24:9-12

9Batikaki simitiele mpe bakendaki koyebisa makambo wana nyonso epai ya Bapostolo zomi na moko mpe epai ya baoyo mosusu nyonso. 10Ezalaki : Mariya ya Magadala, Jeane mpe Mariya mama ya Zaki mpe baninga na bango mosusu ya basi, bayebisaki mpe sango yango na bapostolo. 11Kasi bazwaki maloba na bango lokola maloba oyo ezanga tina, mpe bandimaki yango te.

12Kasi Piere atelemaki mpe akimaki mbangu na lilita. Tango angunzamaki, amonaki bilamba ezalaki wana, kaka yango moko. Azongaki mpe akamwaki mingi penza mpo na makambo oyo ewutaki kosalama.

Yesu abimeli bayekoli mibale na nzela ya Emawusi

Copyright information for LinMNB