Luke 5:27-32
Tembe na tina na Yesu
(Mat 9.9-13; Mlk 2.13-17)
27Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » 28Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu. 29Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu ; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango. 30Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?31Yesu azongiselaki bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. 32Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.
Copyright information for
LinMNB