Luke 6:6-11
(Mat 12.9-14; Mlk 3.1-6)
6Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali. 7Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye. 8Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso !Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso. 9Bongo Yesu alobaki na bato mosusu : — Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?
10Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo !
Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki. 11Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.
Copyright information for
LinMNB