Luke 8:4-10
Lisese ya moloni
(Mat 13.1-9; Mlk 4.1-9)
4Wana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo : 5 — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango. 6Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga ; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te. 7Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango. 8Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko.Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
(Mat 13.10-13; Mlk 4.10-12)
9Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango. 10Azongiselaki bango : — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete,atako bakoki kotala, bamona te ;
mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
Copyright information for
LinMNB