‏ Luke 9:11-16

11Kasi tango ebele ya bato bayebaki yango, balandaki ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe abikisaki baoyo bazalaki na posa ya kobika.

12Tango pokwa ebandaki kokoma, bapostolo zomi na mibale bayaki pene-pene ya Yesu, mpe balobaki na ye :

—Zongisa ebele ya bato oyo mpo bakende na bamboka mpe na bilanga ya pembeni awa, mpo baluka biloko ya kolia mpe bisika ya kolala, pamba te tozali na esika ezangi bato.

13Kasi Yesu azongisaki :

—Bino moko bopesa bango biloko ya kolia ! Bongo bazongisaki :

—Tozali kaka na mampa mitano mpe mbisi mibale. Soki te, malamu tokende kosomba biloko ya kolia mpo na ebele ya bato oyo nyonso !
14Pamba te, mibali nyonso oyo bazalaki wana, bazalaki pene-pene na nkoto mitano.

Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Bovandisa bango na maboke ya bato ntuku mitano-ntuku mitano.

15Basalaki bongo, mpe bavandisaki bango nyonso. 16Bongo Yesu akamataki mampa mitano mpe bambisi mibale, atombolaki miso likolo, azongisaki matondi mpe akataki yango ; bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola na bato.
Copyright information for LinMNB