Luke 9:18-22
Petelo atatoli mpo na Yesu
(Mat 16.13-21; Mlk 8.27-31; Yn 6.67-71)
18Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?19Bazongisaki : — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.
20Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
Petelo azongisaki : — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.
21Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko. 22Mpe alobaki : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
Copyright information for
LinMNB