‏ Luke 9:37-43

Molimo mabe kati na mwana moko

(Mat 17.14-21; Mlk 9.14-29)

37Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu. 38Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki : — Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko ! 39Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye. 40Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.

41Yesu alobaki : — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.

42Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye. 43Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe.

Yesu asakoli kufa na Ye

(Mat 17.22-23; Mlk 9.30-32)

Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye :
Copyright information for LinMNB