Luke 9:43-45
43Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe.Yesu asakoli kufa na Ye
(Mat 17.22-23; Mlk 9.30-32)
Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye : 44 — Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.45Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.
Copyright information for
LinMNB