Mark 1:2-8
2kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo,ye nde akobongisela Yo nzela.
3Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe :
‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo,
bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
4Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino ! » 5Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani. 6Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. 7Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye. 8Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. »
Copyright information for
LinMNB