‏ Mark 1:35-39

(Lk 4.42-44)

35Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela. 36Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu. 37Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye : — Bato nyonso bazali koluka Yo.

38Kasi Ye azongiselaki bango : — Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango.

39Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe.
Copyright information for LinMNB