Mark 11:12-14
Yesu alakeli nzete ya figi mabe
(Mat 21.18-19)
12Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala. 13Na mosika, amonaki nzete moko ya figi etonda na makasa ; apusanaki pene na yango mpo na kotala soki ezali na mbuma. Kasi tango akomaki pene, amonaki kaka makasa mpo ete ezalaki eleko ya bambuma ya figi te. 14Yesu alobaki na nzete yango : « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! » Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango.
Copyright information for
LinMNB