‏ Mark 14:1-2

Bakani Koboma Yesu

(Mat 26.1-5; Lk 22.1-2; Yn 11.45-53)

1Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ; 2pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
Copyright information for LinMNB