‏ Mark 14:12-16

Yesu mpe bantoma balie bilei ya Pasika

(Mat 26.17-19; Lk 22.7-18)

12Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ?

13Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango : — Bokende kati na engumba, bokokutana na moto moko amemi eloku ya mayi ; bolanda ye 14mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »
15 Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.

16Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika.
Copyright information for LinMNB