Mark 14:27-31
Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye
(Mat 26.31-35; Lk 22.31-34; Yn 13.36-38)
27Yesu alobaki na bango : — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. »28 Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
29Petelo alobaki na Ye : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
30Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
31Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te.
Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
Copyright information for
LinMNB