‏ Mark 14:69-72

69Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azali moko kati na bango !

70Petelo awanganaki lisusu.

Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.

71Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Nayebi te moto oyo bozali kolobela !

72Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
Copyright information for LinMNB