Mark 15:1-2
Yesu asambi liboso ya Pilato
(Mat 27.11-26; Lk 21.1-5, 13-25; Yn 18.28-40; 19.4-16)
1Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato. 2Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?Yesu azongisaki : — Olobi yango.
Copyright information for
LinMNB