Mark 16:14-18
14Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye. 15Alobaki na bango : — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu. 16Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu. 17Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe ; bakoloba nkota ya sika, 18bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.
Copyright information for
LinMNB