Mark 3:13-19
Yesu aponi bantoma zomi na mibale
(Mat 10.1-4; Lk 6.12-16)
13Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye. 14Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu ; 15mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe. 16Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki :Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; »
17Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba : bana ya kake ;
18Andre,
Filipo,
Bartelemi,
Matayo,
Toma,
Jake, mwana mobali ya Alife ;
Tade,
Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,
19mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
Copyright information for
LinMNB