‏ Mark 3:31-35

Libota ya solo ya Yesu

(Mat 12.46-50; Lk 8.19-21)

31Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu. 32Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye : — Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo.

Yesu azongisaki :
33 — Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?

34Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki : — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai ! 35Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
Copyright information for LinMNB