Mark 4:10-12
10Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese. 11Yesu alobaki na bango : — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ; 12mpo ete :atako bakoki kotala, bamona eloko te ;
mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te ;
noki te bakobongola mitema,
mpe masumu na bango ekolimbisama.
Copyright information for
LinMNB