Mark 4:30-32
30Yesu alobaki lisusu : —Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisapo nini mpo na kolakisa yango ? 31Ekokani na mbuma ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka mbuma oyo elekaka moke na bambuma nyonso ya mokili. 32Kasi soki baloni yango, ekokola mpe ekokoma molayi koleka biloko nyonso oyo elonamaka ; mpe ebimisaka bitape ya minene, na ndenge ete bandeke bakoki koya kosala bandako na yango na nse ya malili na yango.
Copyright information for
LinMNB