Mark 6:14-16
Kufa ya Yoane Mobatisi
(Mat 14.1-2; Lk 9.7-9)
14Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! » 15Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! » Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! » 16Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! »
Copyright information for
LinMNB