Mark 6:7-13
7Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe. 8Alobaki na bango : « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. » Alobaki na bango : « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino. 9Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te. 10Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa. 11Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino ; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. » 12Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema. 13Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.
Copyright information for
LinMNB