Mark 8:27-31
Yesu mpe bayekoli na Ye
Petelo atatoli mpo na Yesu
(Mat 16.13-23; Lk 9.18-22)
27Yesu mpe bayekoli na Ye bakendeki na bamboka ya Sezarea ya Filipo. Na nzela, atunaki bango : — Bato bazali koloba ete Ngai nazali nani ?28Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli.
29Yesu atunaki bango : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
Petelo azongiselaki Ye : — Ozali Masiya.
30Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko.
Yesu alobi na tina na kufa na Ye
31Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.
Copyright information for
LinMNB