‏ Mark 9:30-32

Yesu alobeli kufa mpe lisekwa na Ye

(Mat 17.22-23; Lk 9.43-45)

30Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali, 31pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.

32Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.
Copyright information for LinMNB