Matthew 13:31-33
31Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu : —Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma ya mutarde ; moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye. 32Mbuma yango eleki bambuma nyonso na moke ; kasi soki ebimi, elekaka biloko nyonso oyo balonaka na elanga mpe ekomaka mwa nzeteepai bandeke bayaka kosala bandako na bango na bitapi na yango !(Lk. 13.20-21)
33Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu : —Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi oyo evimbisaka mampa oyo mwasi akamati mpeasangisi yango na kopo misato ya farine, kino tango farine nyonso ekovimba.(Mk. 4.33-34)
Copyright information for
LinMNB