Matthew 13:53-58
Bato ya Nazareti batioli Yesu
(Mlk 6.1-6; Lk 4.1-30)
53Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango 54mpe azongaki kati na engumba na Ye ; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna : « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi ? 55Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ? 56Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te ? Azwi makambo oyo nyonso wapi ? » 57Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.58Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.
Copyright information for
LinMNB