Matthew 14:1-2
Erode mpe Yesu
(Mlk 6.14-29; Lk 9.7-9; 3.19-20)
1Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile. 2Alobaki na basali na ye : — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.
Copyright information for
LinMNB