‏ Matthew 18:1-5

Lingomba ya Masiya

Nani aleki monene ?

(Mlk 9.33-37; Lk 9.46-48)

1Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?

2Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango 3mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. 4Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo. 5Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
Copyright information for LinMNB