‏ Matthew 21:12-13

Yesu abengani bateki kati na Ndako ya Nzambe

(Mlk 11.15-19; Lk 19.45-48; Yn 2.13-16)

12Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga. 13Alobaki na bango : — Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo ; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi !
Copyright information for LinMNB