Matthew 21:15-17
15Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! » 16Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ?Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te :
« Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana
oyo bazali nanu komela mabele,
ozwaki lokumu na Yo ? »
17Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.
Copyright information for
LinMNB