‏ Matthew 21:18-19

Yesu alakeli nzete ya figi mabe

(Mlk 11.12-14, 20-25)

18Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala. 19Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela.

Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki.
Copyright information for LinMNB