‏ Matthew 22:41-46

Yesu azali Mwana ya nani

(Mlk 12.35-37; Lk 20.41-44)

41Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango : 42 — Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ?

Bazongiselaki Ye : — Azali mwana ya Davidi !

43Alobaki na bango : — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo ? Pamba te alobaki :
44 « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
kino natia banguna na Yo
na se ya matambe na Yo. › »
45 Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?

46Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
Copyright information for LinMNB