‏ Matthew 24:23-28

(Mlk 13.24-31; Lk 17.23-24; 21.25-31)

23 Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te. 24Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema. 25Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba !
26 Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te. 27Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala. 28Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.
Copyright information for LinMNB