‏ Matthew 26:14-16

Yuda ateki Yesu

(Mlk 14.10-11; Lk 22.3-6)

14Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe 15mpe atunaki bango : — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ?

Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.
16Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.
Copyright information for LinMNB